Mittwoch, 19. Dezember 2012

Kongopost 65

Epai na Tata Bakemo.
Mbote na yo pe bino nyoso lisusu. Na zali na esengo monene lisusu pe na zali kotonda Njambe mingi po été kaka ye oyo ayebi kosala pe kobongisa nyoso été biso tozali na bomoi lisusu. Na sepeli lisusu koyoka mongongo na yo na téléphone lisusu. Pe ngai na zali na esengo monene été na koki lisusu komona na Nanella pe kosimba ye pe ba nkoko nyoso pe ba-Efongotema pe bandeko nyoso na kokuti bango nyoso kaka na kimia.
Ngai na salaki mobembo molai penza pe mobembo oyo ezalaki mobembo na ntina penza epai na ngai po na komona naino pe kobima na pays to mboka mosusu lisusu.
Mobembo ezalaki na ndenge oyo, ezalaki mobembo oyo REGION AFRIQUE YA MEU/VEM uta Tanzanie esika siège na bango (bureau) ezali kuna. Bango babongisaki été communauté membre ya MEU batinda ba responsable ya diaconie été bakenda kokutana esikamoko po na échange d’expérience na makambo etali kaka mosala ya diaconie kati na mangomba pe kati na bandeko bana na Njambe kati na bamboka.
Tozalaki kuna, bato uta Namibie, Botsuana, RDC, Cameroun na Tanzanie, Rwanda, Tozalaki biso nyoso bato 12. Pe biso toutaki uta Congo ngai na Pasteur Bafalanga tokotaki avion uta kin kino kisangani pe na kisangani tokotaki na Avion mosusu kino Goma. Pe na Goma tokutaki bandeko kuna bazali kozela biso na motuka pe tokotaki na motuka kino Rwanda, pe na Rwanda tozuaki lisusu bandeko mosusu kuna pe tokotaki lisusu obele na motuka kino Tanzanie. Uta Goma kino Tanzanie ezali na 800km. Boye bango bafutaki mbongo mingi po na mobembo oyo, Tala po na ngai pe Pasteur Bafalanga bafutaki uta basankusu kino mbandaka pona biso obele allez mpamba bafutaki 1.360$. Pe tala kin kino Goma bafuta kilisusu 1.660$ pe tolalaki na kigali na capital ya Rwanda. Pe kuna bafutaki hotel po na biso minei été ngai na Bafalanga pe na bato mibale ya Goma. Boye bafutaki 50$/personne ezali na 200$.
Pe kuna na tanzanie tozalaki kofanda na hôtel monene bandeko na C ELCT ezali église na bang ope bazali na centre d’accueille na bango. Pe kuna bafutaki 200$/jour/personne. Pe tozalaki bato 12 pe tosalaki 7 jour na hôtel oyo. Elingi koloba été bafutaki; 16.000$ obele po na hotel. Pe lisusu bafutaki lisusu po na retour na biso uta kigali kino Kenya pe kino kokoma kin pe kin kino kokoma basankusu elongo na séjour po na ngai pe mama Bafalanga bafutaki 1.985$ boye total ezali naino po na oyo na yebi = 21.495$. kasi po na billet ya bandeko mosusu na yebaki oyo te. Kasi soki osangisi naoyo na bango dépense ekoki kokoma pene na 30.000$.
Oyo ezali naino sango na mobembo pe na dépense moke oyo ngai na yebi kasi mosusu ezali kaka epai na bango moko.
Kuna tozalaki na ntina monene obele komona pe koyoka misala na diaconie kati na ba communauté. Tosalaki ba exposer pe ezalaki kotalisama na ordinateur na Powell pointe pe bandeko nyoso bazalaki komona pe mituna na ndenge na ndenge izalaki. pe na sima tozalaki na mikolo mibale ya kosala pratique kokenda kotala ba homme de vieillard pe na ba orphelinat minene na bang ope kotala eloko nini bango bazali kosala po na kosunga bana oyo.
Pe totambolaki lisusu mingi po na komona mboka pe kotambola na lac Victoria. Kuna ezali na climat na malili pe na mipepelisusu. Bato bazali na civilisation na bang ope bazali kotambola na ville na bango na esengo pe bakoki kotumola ba bapaye te.

Kati na seminaire oyo toyekolaki biloko mibale;
-Moko ezalaki été koluka système malamu po na kotambolisa pe kotombola mosala na diaconie kati na mangomba;
-Ya mibale ezali koluka mayele po na soutenance pe bonne marche na yango na nzela financière pe matériels
Boye pona koluka système malamu, tyekolakiete malamu kosala sensibilisations et mobilisation makasi pe malamu kati na mangomba.
Pe po na soutenance matériels to financières tomonaki malamu été kotelemisa ba unîtes de ressource to ba munis projet lokola kobokola bibwele pe kokona bilanga été yango ekozala po na bomoi na diaconie na tu poste totu paroisse.
Na sima na oyo batunaki biso na suka été moto na moto akopesa constant na ye to eloko nini ye amoni to eloko nini ye akanisi po na avenir. Pe balobaki été na mbula ekoya na mois de Mars 2013 rencontre mosusu ekozala na Namibia.

Kasi ngai na zalaki na constant mosusu pe na telemaki pe na lobaki na bango été ; nyoso oyo salemi ezali malamu mingi po été ezali lokola une nouvelle découvertes kati na mosala na diaconie. Kasi na monisaki bango ndenge nini diaconie na biso awa ebandaki uta na choral Arc EN ciel pe na monisaki bango ndenge nini tozalaki kokenda na makambo moke na biso na hôpital pe kosala libondeli na hopital epai na ba malade pe na monisaki bango lisusu ndenge nini tokutanaki biso na yo na 2002 awa na basankusu pe ndenge nini okotaki na biso na losambo oyo kuna na hôpital tii kino sika. Pe na lobaki na bango été malamu kosunga bato na mbongo oyo ebele kasi kosilisa yango kaka na mibembo ezal ipenza malamu te.
Kasi na sima namaloba na ngai na monaki été bazalaki penza lisusu na esengo te. Pe na kanisi été tango mosusu bakolinga kopona ngai po na kokenda na Nambie lisusu te. Oyo kaka idée na ngai sima na constant na ngai epai na bango.
Kasi po na ngai na sepelaki mingi komona misala na bandimi kuna pe komona ndenge nini bazali kosala pe ndenge nini bango bazali kobika.
Pe na moni été mosala oyo ezali mosala na volonté personnel to engrangement personnel na moto mondimi ye moko epai na Njambe.

Na monaki lisusu été bango bazali très développer na makambo na diaconie. Pe baumeli na yango pe yango ekoma devoir domiciles na bandimi pe ntina oyo bazali kosala mingi pe na zela yango bato to mangomba mosusu bazali kotia maboko na mosala na bango. Tokotaki na internat na orphelinats na bango pe na ba homme de vieillard pe totalaki ndenge nini bazali kosunga bana kuna pe na ba mpaka oyo bakomi na suka na nguya na bango. Pe tomonaki lisusu été lisungi mosusu ezali kouta na Gouvernement na bango pe. Kasi ata boye mingi na masungi na bango euti kaka epai na bandimi pe na biloko na bilanga bango.
Boye ngai na monaki été Moto oyo azali mondimi na jambe malamu été ye moko akanisa pe asosola pe apona na motema na ye eloko nini akopesa merci epai na Njambe na ntina na bomoi mobimba na ye. Pe merci na monoko mpamba te,kasi merci elongo na action pe yango ekotikala diaconie personnel na mondimi ye moko epai na Njambe.
Po été kosala sala copie na bandeko mosusu ekoki kozala malamu tango mosusu kasi ekozala kaka piraterie kasi ozali original penza te. Ngai na moni na mosala ya diaconie ezali mabe te, ko copie système na baninga kasi malamu kotikala pe na original na motema na yo moko lokola mondimi.
Na suka na makambo oyo na sepeli mingi été na moni pe système na baninga pe nyoso ezali kaka mabe te te te. Pe nyoso ezali kaka malamu te te te. Kasi po na kotambolisa mosala oyo
Esengeli kaka kopona mosusu kobakisa na oyo tozali na yango. Pe kolongola mosusu oyo tokokaki kosala na yango te. Pe kotuna seko mokano na Njambe.
Mobembo esukaki na kimia pe tozongaki nakimia kasi mawa été tokokaki kosua appuis uta na Vem te po na babola.
Oyo ezali tango na ebandeli na seminaire
Oyo ngai Elongo na mwanakati na horphelinat
Oyo ezali kati na elanga na centre na horphelinat
Oyo ezali kati na na orphelinat na bango
Oyo ezali kati na salle ya séminaire
Na kanisi été na zali na ba photo mingi pe na kotindaka yango kaka malembe malembe été okoki komona yango.
Tango na zalaki na kin na komelakiyo po na mwana oyo na pasi na monoko uta mopono pe oyanolaki ngai été malamu na tuna naino esika pe na motuya na yango été okoka kotala yango. Boye okanisi nini? esika ezali na mbandaka pe na tunaki po na prix na yang ope balobaki été ekokoka na 1.700$ po été bakotala pe mpo na mino na ye. Boye nalingaki kaka na talisa yo yang ope soko okokanisa nini po na yangookoki kokomela ngai tango mosusu.
Na yebi pe te soko okokanisa nini lisusu pona mobembo na yo awa epai na biso na mbula ekoya? soko obandi kokanisa okoki kokomela ngai yango te? po été na zali kokanisa kosala programmes de visite na ngai po na ebandeli na mbula po na trois mois été na kokikolakisa awa na comite de diaconie été bayeba yango polele. Pe soko oyo nayo ekokota lisusu ekozala malamu epai na ngai été na yeba kosala réserve ya mikolo été tokoki kozala na eposa malamu. Pe komonisa lisusu itinérance na yo été na yeba ndenge nini okoki kokoma awa. Oyo ezali kaka makanisi pamba nangai kasi tokozila suka na makanisi euti epai na Njambe.
Na kokomelayo lisusu na sima po été sika na komeliyo mingi pe noki okolemba kotanga mokanda molai na ngai.
Na suki naino tikala malamu ngai ndeko Richard Iyema.

3 Kommentare:

  1. He, Frau Urwaldgarten, hast du nicht vielleicht eine winzige Kleinigkeit vergessen?
    Übersehen?

    also mein Spezi Kuhgel-Transläät behauptet im Menü "Sprache erkennen", das sei Suaheli und übersetzt den ersten Absatz so:
    --------------------------
    EPAI und Tata Bakemo.
    Yo ive Bote BINO nyoso lisusu. Und Uzal und esengo monene lisusu pe und Usal kotonda vielen Jambe ete po Bruder Oyo ayebi keine Kosala pe mete kobongisa nyoso biso tozali und bomoi lisusu.
    --------------------------
    Aber es ist ja ganz sicher kein Suaheli, sondern Lingala.
    Na komm, überwinde das Wörterbuch in dir und übersetz den Kram.

    AntwortenLöschen
  2. Na kanisi été na zali na ba photo mingi pe na kotindaka yango kaka malembe malembe été okoki komona yango.
    Sag ich doch auch immer!

    AntwortenLöschen
  3. eben.
    mboka mosusu lisusu.

    AntwortenLöschen

Nur Mut. So ein Kommentarfeld beißt nicht.