Freitag, 26. Dezember 2014

Bonne année 2015

Likambo na vélo mpe Apocalypse mpe bonne année 2015.
Ngai Ezali Mokili nasepeli kotambola na vélo, soki moi ezali malamu mpe mbula enuki te.
Bongo nakutanaki na ndeko mosusu na vélo na ye mpe ye alobelaki ngai ete, Roue na vélo ezali elembo na kondima na biso. Natunaki ye ete, ndenge nini oyo?
Alobaki ete, zila nakosalela yo explication:
Jante na rue ezali elembo na lingomba mpe yango ezali kosimba biso. Jante ezali kopesa rayon forme mpe lingomba ezali kopesa biso bandimi ordre mpe doctrine fixe.

Rayon ezali elembo na biso bandimi. Biso bandimi tozali kokumba lingomba mpe soki biso tozali mingi lokola ba rayon mpe tozali yonso makasi ndenge moko, jante to lingomba ezali malamu mpenza mpe makasi. Okoki kotiya ye kilo mingi mpe likambo ekozala te, ata mabanga izali na nzela. Kasi soki rayon moko to mibale ezali makasi te, basusu bakokoma na nkaka mpe jante ekobanda kozwa libumu mosusu.

Axe ezali centre mpe rayon yonso ibandi kuna mpe ikangemi na yango. Bandimi ikangemi mpe na Nkolo Yesu mpe ebandeli na biso ezalaki kaka epai na ye.

Nr. 1. Ebandeli na kondima na ngai moko ezalaki mpe kaka epai na Yesu. Nalingaki eloko moko mosusu te mpe nasepelaki na bolingo na ye lokola mwana moke. Mposa yonso na ngai ezalaki kaka Yesu. Kasi nakomaki mpe protestant. Nakomaki mpe mobali na Elisabeth mpe Papa na bana. Nakomaki maître maçon. Nazwi responsabilité mpe nakomaki penne na jante, kasi mosika na Yesu.

Nr. 2. Moto mosusu abandaki mpe epai na Yesu, penne na ngai, kasi akomaki catholique mpe akomaki monPère na théoligique mosusu mpe asalaki na mosala monene mpo na lingomba na ye kasi mosika na Yesu.

Nr. 3. Mosusu azalaki Kimbanguiste mpe abandaki na Yesu mpe abotaki bana kitoko mpe ayembaki kitoko mpenza. Bato balingaki ye mingi mpe abetaki mbonda malamu mikolo yonso na lingomba kasi mosika na Yesu.

Nakoki kotangisa bino lisusu exemple ebele.

Remarque ezali: Rayon yonso ibandi na axe rayon na rayon pennepenne na ndeko na ye. Kasi penne na jante bazwi distance rayon na rayon.

Biso na ebandeli na Yesu tozalaki bandeko mpenza, kasi elongo na mosala mpe responsabilité tokomi mosika na Yesu mpe mosika na bandeko. Ndakisa ezali mingi.

Nazali koyoka liloba na Nkolo Yesu mpo na ngai moko mosika ete:

Tu ne m'aimes plus comme au commencement. De quelle hauteur tu es tombé! Prends-en conscience, change d'attitude et agis comme tu l'as fait au commencement.

Oyo souhait na ngai mpo na biso yonso mpo na 2015.
EZALI MOKILI.

Vielleicht bekommen wir noch die Übersetzung. Ansonsten -- bonne année!

2 Kommentare:

  1. Nee, Lingala.
    Apocalypse heißt auf französisch Offenbarung, hab ich erfahren. Also gehts um die Offb.
    Aber der Text ist nicht für Weiße bestimmt, sagte der EZALI MOKILI mir heute. Warum hat er ihn mir dann geschickt?
    Es gibt Fragen, auf die es keine Antwort gibt.

    Herzlich Willkommen, all ihr Komputer-Kongolesen und Lingala-Versteher, für die dieser Text bestimmt ist!

    AntwortenLöschen

Nur Mut. So ein Kommentarfeld beißt nicht.